Levitike 13:2 - Mokanda na Bomoi2 « Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.