19 bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.
Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.
Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi.
Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu ; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi.