14 Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota.
Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,
Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.
Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo : ezali bokono ya maba.