Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 12:8 - Mokanda na Bomoi

8 Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 12:8
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.


Nganga-Nzambe akobonza bambeka yango liboso ya Yawe mpe sima, akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mwasi. Soki kaka asilisi kosala yango nde mwasi akokoma peto. Wana nde mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.


Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.


Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ