Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 12:6
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.


« Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki mwasi aboti mwana mobali, akozala mbindo mikolo sambo lokola tango amonaka makila na ye ya sanza.


Soki mwasi aboti mwana mwasi, akozala mbindo baposo mibale lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. Bongo akolekisa mikolo tuku motoba na motoba mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki.


Nganga-Nzambe akobonza bambeka yango liboso ya Yawe mpe sima, akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mwasi. Soki kaka asilisi kosala yango nde mwasi akokoma peto. Wana nde mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.


Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka.


Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo,


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ