Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.
Soki mwasi aboti mwana mwasi, akozala mbindo baposo mibale lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. Bongo akolekisa mikolo tuku motoba na motoba mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki.
Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo,