Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;
Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani