Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 11:42 - Mokanda na Bomoi

42 Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu ; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 11:42
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »


Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko ; mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. Bakoyoka lisusu pasi te, mpe bakobebisama lisusu te na ngomba na Ngai ya bule, » elobi Yawe.


Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango.


Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te.


Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu ; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.


Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.


Moto moko ya Kreti, oyo bango moko bato ya Kreti bazwaka lokola mosakoli, alobaki : « Bato ya Kreti bazalaka bakosi, bazalaka banyama mabe, bato na lokoso mpe bagoyigoyi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ