Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 11:33 - Mokanda na Bomoi

33 Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 11:33
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka, ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ; pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, » elobi Yawe.


Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo ; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka : soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini.


Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango ; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo.


Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.


Boye bakokweyisa ndako yango : mabanga mpe mabaya na yango nyonso ekobwakama na libanda ya engumba na esika ya mbindo.


Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.


Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele.


Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ