29 Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo : mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete,
Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.
Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »