mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te ; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.
Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.
Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.
Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.
Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto.
Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango.
Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi ; boye na pokwa, akokoma peto.
Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.
Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.