Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 11:2
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki : — Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te !


Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.


Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.


Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,


Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele :


Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo : mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete,


banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.


Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo ; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka : soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini.


Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ;


Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ;


Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.


eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ