Levitike 11:13 - Mokanda na Bomoi13 Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.
Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.