Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 10:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 10:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi mpo na masanga ya vino ; masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; bakomi kobunga na bimoniseli na bango, bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.


Nganga-Nzambe moko te akomela masanga ya vino liboso ete akota na lopango ya kati.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende.


asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka ; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka.


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,


Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala : bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.


Okomelaka mayi kaka te, kasi melaka mpe mwa masanga ya vino mpo ete esunga yo mpo na pasi na yo ya libumu mpe mpo na bokono oyo ozwaka mbala na mbala.


Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ