5 Basalaki ndenge kaka Moyize alobaki na bango : bapusanaki mpe bamemaki bibembe elongo na banzambala na bango na libanda ya molako.
Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.
Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo ; mpe okokanga ye mokaba ya efode.
Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.