Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Aron azongiselaki Moyize : — Na mokolo oyo bana na ngai babonzelaki Yawe mbeka na bango mpo na masumu mpe mbeka na bango ya kotumba, oyebi malamu makambo oyo ekweyelaki ngai. Soki, na mokolo lokola oyo wana, ngai naliaki mosuni ya mbeka mpo na masumu, Yawe akokaki na Ye kondima ete ngai nasala likambo ya bongo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 10:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.


Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »


Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga : bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo ; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.


Moyize ayokaki eyano oyo mpe amonaki ete ezali malamu.


Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.


Aron apusanaki pene ya etumbelo mpe akataki kingo ya mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na ye moko.


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe.


Tala makambo mosusu oyo bosalaka : bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino.


Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.


Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.


Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !


azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko.


Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ