Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bongo, tango Moyize atunaki ntaba ya mobali oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu, ayokaki ete basilaki kotumba yango na moto. Boye asilikelaki Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron, mpe atunaki bango :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 10:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso.


Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba,


Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ