Levitike 10:14 - Mokanda na Bomoi14 Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.
Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo : biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango.