Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 10:13
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.


Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bokobanda kozwa likabo oyo ekotikala, oyo ekozika te na moto, mpe bokobanda kolia yango pembeni ya etumbelo ; bokotia yango ezanga levire, pamba te ezali eteni ya bule koleka.


Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe.


Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. »


Bokolia yango lokola biloko oyo eleki bule, mwana mobali nyonso akolia yango. Bokotala yango lokola eloko ya bule.


Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe ; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ