Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 10:11 - Mokanda na Bomoi

11 lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 10:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.


Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.


Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola.


Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi.


Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »


Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba : ‹ Yawe azali wapi ? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai ; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.


Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo.


Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.


Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ