Levitike 1:9 - Mokanda na Bomoi9 Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.