8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.
Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te.
Abongisaki bakoni, akataki ngombe na biteni mpe atiaki yango likolo ya bakoni.
Batobolaki nzela moko ya basantimetele pene mwambe na zingazinga ya bamesa moko na moko ; bazalaki kotia misuni ya bambeka na likolo ya bamesa yango.
Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ;
Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati,
bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.