Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 1:17
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te.


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu : akokata yango kingo kasi akolongola moto te.


Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo ; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo.


bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.


Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye.


Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.


oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ