Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 1:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo.


Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido ;


Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila.


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na ngambo ya nor. » Natombolaki miso na ngai mpe namonaki nzambe ya ekeko ya zuwa, na ekotelo ya Ekuke oyo ya nor ya etumbelo.


Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule ; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe : ezali eloko ya bule koleka.


Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba.


‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo.


Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ