Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 1:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atumbaki mbeka na ye mpe likabo ya gato, asopaki likabo ya masanga mpe abwakaki makila ya bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo.


Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki : bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale : nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe.


Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye : — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele :


Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »


Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.


Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso : bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe ; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino.


Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango : — Moyize, Moyize ! Moyize azongisaki : — Ngai oyo !


Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.


Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.


Aron amemaki mbeka ya kotumba mpe abonzaki yango kolanda mitindo.


Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye :


ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,


Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ