Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 9:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?


Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya.


Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.


Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende.


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.


Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon.


Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


Pamba te nayebaki ndenge nini bozalaka bato ya mito makasi, bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze.


Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye.


Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ