Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 9:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 9:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akabaki bameme na bango epai ya mvula ya mabanga, mpe bibwele na bango epai ya kake.


Apesaki na kanda na Ye nzela ya kopela, abatelaki bango te na kufa ; kasi akabaki bango na bokono oyo ebomaka.


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.


Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?


Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso.


Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.


Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »


Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ