Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito ? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.