akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.
Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te.
Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga.
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
Sima na kobongisa esika ya kolona, boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini ? Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, mpe orje, na esika oyo ekoki ; mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye ?
Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko.