30 Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te ; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.
Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo ? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te ? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo !