Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 9:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.


Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.


Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.


Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.


Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »


« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi ; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.


Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ