soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.
Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.
Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.