23 Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.
Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.
Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.
Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.