Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 9:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »


Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,


Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,


Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.


Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.


Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.


Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo :


Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »


Akobaki koloba na ngai : — Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.


Lokola akomaki pene ya kokufa, basi oyo bazingelaki ye balobaki na ye : — Kobanga te ! Oboti mwana mobali ! Kasi ye apesaki eyano moko te mpe atiaki makanisi na ye kuna te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ