Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. »
Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
Makambo oyo esalemaki ndenge moto na Nzambe alobaki na mokonzi : « Lobi, na tango oyo, bakoteka na ekuke ya Samari bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te.
Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon.
Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.