13 Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.
Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.