Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,
Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »