Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »
Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.
Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.