Eliya alobaki na basakoli ya Bala : — Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali ; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te.
Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?
Yawe alobaki na Jedeon : « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba : ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›