Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.