Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 8:25 - Mokanda na Bomoi

25 Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 8:25
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.


Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki : — Bokende kogumbamela Yawe ; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino.


Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon ; mpe Faraon alobaki na bango : — Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende ?


Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.


Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.


Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.


Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ