Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 8:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 8:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mitindo na Ye, banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki na mboka mobimba.


Atindelaki bango banzinzi oyo eswaka, mpe eliaki bango ; mpe magorodo oyo ebebisaki bango.


Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango.


Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »


Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »


Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »


Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.


Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.


Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ