18 Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango.
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.
Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.
Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ? Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai : « Nazalaki kotala, namonaki nzete moko ya monene etelema liboso na ngai, na kati-kati ya mabele, mpe ezalaki molayi makasi penza.