Kobima 8:14 - Mokanda na Bomoi14 Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele : lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi.
Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este ; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.