Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Yawe alobaki na Moyize : — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.