Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 8:10
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini ! Moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo !


Oh Yawe, moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo !


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.


Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga.


Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.


Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.


Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.


Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?


« Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?


Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza ; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.


— Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali ?


Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.


Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.


Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.


Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.


Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ