Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 7:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.


Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.


Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.


Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.


Yawe alobaki : — Bwaka yango na mabele. Moyize abwakaki lingenda yango na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Bongo Moyize akimaki mosika na yango.


Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.


— Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo.


Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’


Yesu azongisaki : — Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.


Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.


Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?


Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ