Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 7:4 - Mokanda na Bomoi

4 Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 7:4
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,


Yawe alobaki na Moyize : « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. »


Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.


Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.


Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.


Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.


Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya.


Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.


Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.


Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki : « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »


Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.


Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.


Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.


Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.


Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.


loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.


Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.


Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.


Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso.


Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,


nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›


Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi.


Nakopesa Ejipito etumbu ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Bongo nayokaki etumbelo koloba : « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! »


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ