Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 7:25 - Mokanda na Bomoi

25 Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 7:25
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.


Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.


Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ