9 Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.
Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito : « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito ? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe.
Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela.